Bato basato to koleka bakufi na bitumba ntango bavandi bazalaki kotelemela coopérative moko ezwakia mine ya cuivre na cobalt na Lonshi, na territoire ya Sakanya (Haut-Katanga), elobi mokambi ya etando eye.
CLC, Comité laïc ya coordination epusi botamboli na yango o’mokolo ya lundi 19 octobre nsima na bokutani na mokambi ya engumba mokonzi Kinshasa, Gentiny Ngobila.
Président Tshisekedi asali mobembo ya mwa lobango na Etats-Unis uto mercredi na mpokwa, eyebisi na VOA Lingala moko na balobeli ya mokonzi ya ekolo Congo démocratique.
Président Félix Tshisekedi afungoli lelo na Kinshasa linaka ya kobundisa na lombango bobola mpe bokeseni kati na ekolo Congo démocratique. Milulu myango misalamaki na Africa Park Aventure, Lac de ma valée ya kala.
Nzoto ya bato basato bakufaki na Antonvo 72 eye ekweyaki pene na mboka Okoto, na Kole (Sankuru), ememami na Kanaga, eyebisi molobeli ya Monusco.
Bato 45 bakufi uto libandeli ya mobu na boloko ya Bukavu, eyebisi syndicat ya basali ya bokolongo baye batiki mosala.
Procureur général na Cour ya Cassation, Flory Kabange alobi ete "motivation" to kopesa biloko songolo na baponi ntango ya maponami ezali mbeba mpe esengeli kozwa etumbu.
Bolukiluki ya Antonov 72 eye ememaki motuka mpe bisaleli ya président Félix Tshisekedi bozongeli lisusu o’mokolo ya mposo nsima na mpela ekasi ya vendredi, eyebisi présidence ya RDC.
Alanga nzembo ya RDC ayebani na nkombo ya Koffi Olomide abengami le 20 avril 2020 na cour d’appel ya Versailles (na ouest ya Paris) na France eye esengeli esambisa ye lisusu mpo na kozwa mpe kokanga na makasi babini baye ya basi banei.
Bakonzi ya ekolo Congo démocratique mpe mingi mpenza ya etuka ya Maniema batindi mampinga ya bolukiluki na Punia (Mamiema) mpo na koluka cargo Antonve 72 eye ememaki bato mpe biloko ya présidence ya ekolo eyeezali komonona te uto jeudi (lobi).
Ba "mpaka" ya ba communautés ya ba Hauts-plateaux ya Sud-Kivu basengi ba solutions diplomatiques mpo na mangomba ya basimba minduki ya babaya mpe dialogue mpo na ya baye ya RDC, nsima na bokutani na Premier ministre Ilunga Ilunkamba.
Ba mpaka ya ba communautés ya ba Hauts-plateaux ya Sud-Kivu basengi solutions diplomatiques mpo na mangomba ya basimba minduki ya babaya mpe dialogue mpo na ya baye ya RDC..
Président Félix Tshisekedi akomi na Beni na Nord-Kivu epayi wapi esengeli alendisa mampinga ya FARDC, kolonda ndako ya misala mokonzi ya mboka.
Bato mitano bafundami mpo na kokanga baleki nzela na Kinshasa bakatelami etumbu ya liwa o’mokolo ya misato na bosambisami ya lobango na Tribunal ya Grande instance ya Gombe, na place ya ba évolués na Kinshasa.
Président Félix Tshisekedi akambi likita monene ya bokengi na bakambi ya bituka bitano ya monyele to est ya ekolo Congo démocratique na Nyofu, na Sud-Kivu.
Kalaka mokonzi ya ONU, Antonio Guterres atindeli basali ya Nations unies mokanda mpo na koyebisa bango ete libenga ya misala na bango ezangi mbongo. Alobi soki makambo mabongwani te akokoka kofuta bango te lokola mpe ba fournisseurs.
Bankonzi ya Ekolo Congo démocratique bapesi passeport biométrique na Conseiller principal ya Moïse Katumbi, Salomon Idi Kalonda.
Na lisikuli na ye liboso ya bituluku ya bato na place ya Indépendance na Bukavu, na Sud-Kivu esika akomaki nsima na nzaka, président Félix Tshisekedi asengi na bana ya Kivu bazongela bilanga.
Président Félix Tshisekedi akomi na Bukavu, na Sud-Kivu mpo na bofungolami ya Laboratoire ya bobongoli ya bisaleli ya milona na Kalambo.
Bato batano bakangami nsima na bobomami ya bavandi zomi na minei na butu ya mokolo na mitano na ya mposo na secteur ya Kinigi, pene na ndelo ya RDC, na Rwanda, bandimi ete bazali batomboki ya ba FDLR.
Voir plus