Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi na Bukavu


Présidence Tshisekedi apesi losako na baye ya mampinga na bolongwi na ye na Kinshasa mpo na kokende Bukvau, na Sud-Kivu, 7 octobre 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Présidence Tshisekedi apesi losako na baye ya mampinga na bolongwi na ye na Kinshasa mpo na kokende Bukvau, na Sud-Kivu, 7 octobre 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akomi na Bukavu, na Sud-Kivu mpo na bofungolami ya Laboratoire ya bobongoli ya bisaleli ya milona na Kalambo.

Kolanda correspondant ya VOA Lingala, Président Tshisekedi akosala lisikulu na mpokwa.

Asali mobembo elongo na molongani wa ye Denis Nyakeru.

Lobi mokolo ya mibale, akoyamba bakonzi ya bikolo ebele mpo na bofungolami ya Laboratoire yango.

Bakonzi ya bikolo ebele lokola Paul Kagame ya Rwanda, Pierre Nkurunziza ya Burundi mpe Uhuru Kenyatta ya Kenya bakozala wana.

Bakonzi ya kala ya bikolo misusu lokolo Joseph Kabila ya RDC na Olusengun Obasanjo mpe bakozala wana.

XS
SM
MD
LG