Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Koffi Olomide akosambisama lisusu na France na avril 2020


Alanga nzembo Koffi Olomidé, 13 mai 2018. (Facebook/ Koffi Olomidé)
Alanga nzembo Koffi Olomidé, 13 mai 2018. (Facebook/ Koffi Olomidé)

Alanga nzembo ya RDC ayebani na nkombo ya Koffi Olomide abengami le 20 avril 2020 na cour d’appel ya Versailles (na ouest ya Paris) na France eye esengeli esambisa ye lisusu mpo na kozwa mpe kokanga na makasi babini baye ya basi banei.

Na mars (sanza ya misatu), ministère public esengaki bazongela kosambisa Antoine Agbepa (nkombo ya solo ya Koffi Olomide) nsima na mokano ya bazuzi ya tribunal correctionnel ya Nanterre (nord-ouest ya Paris) eye ekatelaki ye mibu mibale ya boloko na sursis. Mokano yango elingaki koloba ete Koffi Olomide okovanda kati na boloko te.

Mokano yango ezwamaki nsima na bokitisi ntina ya bosambisami na ye na "atteintes sexeuelles" (mbeba ya bosangisi nzoto) na esika ya "agression sexuelle" (kozwa na makasi).

Baye bafundaki Koffi Olomide, balobi ete asali ba "agressions sexuelles" likolo ya babini baye banei baye akengelaki na ndako ntango akendaki mindule na Paris kati na 2002 mpe 2006. Kasi, Koffi Olomide atikamaki mpo likambo lyango.

Alanga nzembo eye asakolaki mikolo mileki na ba réseaux sociaux na ye ete akobeta mindule na Parisna 2020. Kasi aboyi kondima yango ntango AFP etuni motuna.

Mposo miike mileki akangamaki mpo na nzembo na ye mwambe eye Commission ya censure epekisaki.

XS
SM
MD
LG