+Mike Hammer amemeli Tshisekedi mokanda mwa longonya ya Biden mpo na kozwa bokambi UA +Bokengi botiamaki makasi lobi na Congrès ya USA na bobangi eyoma ya balandi ba Trump +Bakangai 35 bakimi boloko ya Ilebo na Kasaï +Mobembo ya Papa François na Irak
B’episkopo ya CENCO basengi ete maponami mabongisama malamu mpe "masalama na 2023 kasi nsima te". Basengi, na mokanda comité permanant na bango ebimisi, mbongwana na mbulamatari ekokelama.
Balandi ba Vital Kamerhe, mokonzi ya kala ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi mpe mokonzi ya UNC (Union pour la nation), basambelaki na Kinshasa mpo kosenga bosembo ya Nzambe. Basambisami bwa ye bokozongela le 15 février. Nathalie Sekabuhuro azalaki na esika yango.
Limpinga lya b’episkopo ba CENCO likomi na Bunia mpo na koluka kimya mpe kobondisa mitema mya bana mboka ba ye. Bonzindo na Christine abeditho.
Mobulu moalamaki lelo na Lubumbashi, na Haut-Katanga, nsima na Pasteur Daniel Ngoyi Mulunda komema na parquet mpe kotiama na boloko bonene bwa Kasapa. Ba avocats ba ye balobi atiami na boloko ya Kasapa. Sango na bozindo na Narval Mabila. TOTALA
+Maloba ndenge na ndenge malobami nsima na bokangami bwa Daniel Ngoyi Mulunda na Lubumbashi +Trump alaki kofongola kala te bibkuke ya Amerika na ba Europe, ba Britanniques mpe ba Brésiliens kasi ngambo ya Biden eboyi nanu +Bokengi makasi yambo na bolapi ndayi ya Biden +Elona ya Touadera endimami
Pasteur Daniel Ngoyi Mulunda, mokambi ya kala ya CENI akangami nsima na mateya ateyaki samedi le 16 janvier 2021. Tolanda ndambo ya ya mateya yango.
Pasteur Daniel Ngoyi Mulunda, motambwisi ya kala ya CENI (Commission électorale nationale indépendante) akangami lundi na Lubumbashi, elobi bayi politiki baike
Bakambi ba eyamba ya ba kimbanguistes (Kintuadi) balobi ete musée ya Nkamba ekosila na ngonga elamu mpo bazwi lisungi lya président Félix Tshisekedi. Ezali na mobu ya centenaire ya liwa ya Simon Kimbangu.(Chouchou Kahora)
Cardinal Fridolin Ambongo asengi na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi kotala likambo lya nzela ya Kimweza, na Mont Ngafula na Kinshasa. Nzela ekata mpe libulu lizali kokoka kokola mpe kolya ndako na esika eye.
Président Félix Tshisekedi azalaki na losambo mpo na ekolo na buku ya yambo ya mobu ya sika na Cité africaine na Kinshasa, RDC, le 1er janvier 2020. Azalaki mpe na masanjoli. TOTALA
Président Félix Tshisekedi asambelaki na butu ya mobu ya sika na Cité de la Nation. Asengi kimya na ,mboka, bofulukisami , ntombwa COVID-19, sembo na mboka. TOTALA
Voir plus