Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato 45 bakufi na boloko na Bukavu


Boloko ya Bukavu, Sud-Kivu, RDC, 28 juillet 2017. (VOA/Ernest Muhero)
Boloko ya Bukavu, Sud-Kivu, RDC, 28 juillet 2017. (VOA/Ernest Muhero)

Bato 45 bakufi uto libandeli ya mobu na boloko ya Bukavu, eyebisi syndicat ya basali ya bokolongo baye batiki mosala.

Basali ya bokolongo batindi mokanda na mokambi ya etuka ya Sud-Kivu, Théo Ngwabidje Kasa.

Mokanda yango molobi ete bokolo (prison centrale) ya Bukavu etondi na bato koleka motango ya baye basekengeli kozala kuna.

" Bato ya boloko bazali kobika na lolenge ya mpasi mingi " mpe " bozangi mino (nkisi) yango nde ntina ya motango mingi ya bawei, 45 uto janvier kino sik’oyo, " elobi mokando ya ba syndicat eye.

Basali ya bokolongono bazali na grève (bapemisa misala) uto le 14 octobre.

"Bosenga na bango bozali na nzela kasi basali yango na ndenge esengeli te, " eyanoli mokambi ya boloko ya boloko yango, José Ntumba.

Mokambi ya etuka, Théo Ngwabidje Kasi alobi ete likambo ya boloko yango ezali kotalama.

Boloko ya Bukavu etongamaki ntango ya ba colonisateurs mpo na bato 350. Kasi lelo bato 1.850 nde bakotisama na boloko yango.

XS
SM
MD
LG