Police ebomi moto moko afundami na kokata motu ya molakisi moko pene Paris, na France. Likambo lyango lisalami nsima na molakisi yango kolakisa ba caricatures ya Mohammed to Mahomet na ba yekoli ba ye.
Masano électronique (jeux électroniques) to games na anglais, mazali kokola na RDC. Baike na baye balendelaka yango bamoni ete makoki komatisa nkita ya ekolo. Reportage na Anasthasie Tudieshe etangami na Nathalie Sekabuhoro Simurabi.
Nzela etondi mayi ti na loketo bisika mingi nsima na mpela. Kotambola ekomi mpasi na engumba mokonzi ya RDC. Roger Muntu azwaki litatoli ya mokumbi motuka Relass Nzolameso Ntelo na Kinshasa.
Bato zomi na misato bakufi na bobukani ya mabele nsima na mbula makasi na Mahanga, na chefferie ya Osso Banyungu, na Nord-Kivu, eyebisi ONG FDAPID (Foyer de développement pour l’autopromotion des pygmées et indigènes défavorisés).