Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bolukiluki ya Antonov 72 bozongeli lisusu nsima na mpela ya vendredi


Antonov 72 ya Ruissie na Kiev, Ukraine, 15 may 2019.
Antonov 72 ya Ruissie na Kiev, Ukraine, 15 may 2019.

Bolukiluki ya Antonov 72 eye ememaki motuka mpe bisaleli ya président Félix Tshisekedi bozongeli lisusu o’mokolo ya mposo nsima na mpela ekasi ya vendredi, eyebisi présidence ya RDC.

Mpepo yango ebungaki o'mokolo ya jeudi nsima na kolongwa Goma mpo na kokende Kinshasa.

"Na ngonga eye, bolukiluki bozali kokoba kasi bokatanaki mpo na mpela ekasi ezalaki na etuka ya Maniema," elobi misala ya président Tshisekedi.

Bolukiluki bwango bozongeli o’mokolo ya mposo. Monusco (Mission ya Nations unies na RDC) mozali kosunga mampinga ya ba FARDC na bisaleli lokola ba équipements ya télédection biye bikopesa nzela ya kotala etando mobimba esika signal ya mpepo yango ebungaki na etuka ya Maniema.

Kolanda liyebisi ya misala ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, mpepo yango ekweyabki ntango mosusu na mboka Pene Djoka, na etuka ya Maniema.

"Sango ya yambo to tozwi emonisi ete likama yango esalami ntango mosusu na pene na 80 kms ya mboka Pene Djoka, na ngomba ya Katumwe na nzela ya Kasese," esakoli na liyebisi lyango présidence ya république.

Limanyoli limonisi ete mpela nde ekoki kozala ntina ya likama liyango.

XS
SM
MD
LG