Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato basato bakufi na botelemeli ya bavandi na ba exploitants miniers na Sakanya


Mobulu na Lubumbashi, Haut-Katanga, 13 mai 2016
Mobulu na Lubumbashi, Haut-Katanga, 13 mai 2016

Bato basato to koleka bakufi na bitumba ntango bavandi bazalaki kotelemela coopérative moko ezwakia mine ya cuivre na cobalt na Lonshi, na territoire ya Sakanya (Haut-Katanga), elobi mokambi ya etando eye.

"Bato basato bakufi mpe basusu bazoki na bitumba na baye ya bokengi jeudi," esakoli Yuma Asani na AFP, administrateur ya territoire ya Sakanya.

Lonshi ezwami pene na 90 km ya Sakanya, na ndelo na Zambie.

Kolanda M. Yuma Asani, bavandi ya Lonshi bazalaki kotelemela lisanga ya ba exploitants miniers artisanaux ya Katanga (EMAK) eye ezali coopérative na esika yango.

"Na kanda na bango, bavandi batiyaki moto na mituka zomi mimemaka ba minerais (makele) mpe na mituka misusu minene. Jeeps misatu ya police mpe moko ya mampinga miyaki kozongisa kimya ", eyebisi M. Yuma.

Baye bazalaki kotelemela bafundi bakambi ya EMAK na bozangi kozongisa mosolo (redevance) na communauté, na koyokanaka na bakonzi ya bisika biye.

Na RDC, ba sociétés minières esengeli ezongisa 0,3% ya chiffre d’affaires na bango na ba projets ya ntombwa ya ba communautés epayi ba zwami.

XS
SM
MD
LG