Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Salomon Kalonda, mosungi ya Katumbi, azwi passeport mpo na kozonga mboka


Salomon Idi Kalonda, mopesi toli ya Moïse Katumbi, ba bokutani ya Africa CEO Awards na Abidjan, Côte d'ivoire, 10 janvier 2016. (Facebook/Salomon Kalonda Eskadela)
Salomon Idi Kalonda, mopesi toli ya Moïse Katumbi, ba bokutani ya Africa CEO Awards na Abidjan, Côte d'ivoire, 10 janvier 2016. (Facebook/Salomon Kalonda Eskadela)

Bankonzi ya Ekolo Congo démocratique bapesi passeport biométrique na Conseiller principal ya Moïse Katumbi, Salomon Idi Kalonda.

Mopesi toli ya mwana mboka Katumbi ye moko apesi sango yango na compte Twitter na ye.

"Nsima na kozela mingi, nazwi passeport na ngai. Matondi na baye banso bapesaki ngai maboko ntango napeskisamaki kozonga mboka. Napesi losako na politiki ya bokitisa mitema eye Tata mokambi ya ekolo alingi mpe nakozanga kala te mpo na kokoba bitumba kati na opposition pene na Moïse Katumbi," ekomi M. Kalonda na tweet moko.

Akokaki te kozonga mboka le 20 mai eleki mpo na bakonzi ya Congo democratique bamopileki passeport na ntina ete azalaki mpe mwana mboka ekolo esusu ntango mobeko likozi ya RDC epekisi kozala mwana mboka ya ekolo mosusu.

XS
SM
MD
LG