Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Marche ya CLC ekomi lundi mpo na Kinshasa


Ba katolko na bato basusu batamboli na Kinshasa, le 31 décembre 2017.
Ba katolko na bato basusu batamboli na Kinshasa, le 31 décembre 2017.

CLC, Comité laïc ya coordination epusi botamboli na yango o’mokolo ya lundi 19 octobre nsima na bokutani na mokambi ya engumba mokonzi Kinshasa, Gentiny Ngobila.

Kolanda Isidore Ndaywel moko na bakambi ya CLC, botamboli botikali o’mokolo ya mposo na bisika misusu na Congo démocratique.

Lipinga ya CLC likutanaki mercredi na M. Ngobila.

CLC ebengi botamboli yango mpo kotelemela kaniaka mpe kosenga etumbu na likambo ya 15 millions ya ba dollars.

Mangomba misusu lokola Lamuka, Lucha, Filimbi, Asadho mpe mingi misusu, malakaki kozala na botamboli bwango mpo na kopesa maboko.

XS
SM
MD
LG