Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

ONU ezangi mosolo mpo RDC, USA mpe mboka mingi bafuti oyo basengelaki te


Président Félix Tshisekedi ayambi kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na Kinshasa, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi ayambi kalaka mokonzi ya ONU Antonio Guterres na Kinshasa, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Kalaka mokonzi ya ONU, Antonio Guterres atindeli basali ya Nations unies mokanda mpo na koyebisa bango ete libenga ya misala na bango ezangi mbongo. Alobi soki makambo mabongwani te akokoka kofuta bango te lokola mpe ba fournisseurs.

"ONU ezali na likama ya kosilisa (mosolo) oyo ebombaki kino suka ya sanza mpe ekokoka te kofuta basali mpe ba fournisseurs," ekomi M. Guterres na liyebisi.

Kolonda liyebisi lyango, ONU ezali na bosenga ya 230 millions ya ba dollars.

Nzokande bikolo ebele bafuti te mosolo basengelaki kopesa. Kalaka mokonzi atangi nkombo na bango te.

Kasi bayike ya ONU bayebisi ete Etats-Unis (USA), Brésil, Argentine, Mexique mpe Iran bazali mpenza nsima mingi na bofuti mosolo na bango.

RDC mpe ezali kati na mboka 64 ezangisaki kofuta mosolo. Bakisa mpe Mali, Centrafrique, Arabie saoudite, Israël, Corée ya sud, Corée ya Nord na Vénézuela.

"Syrie nde ezali mboka ya suka ekofutaki mosolo," elobi na bokutani na bapanzi sango, molobeli ya ONU, Stéphane Dujaric.

Mokanda mwango motindamaki na basali 37.000 ya secrétariat ya ONU.

Baye ya ONU balobi, soki mabongisi maye ya molongo masalaki mayele te mpo na kosilisa makambo ebele na libandela ya mobu, mbele mosolo ya bosenga mokokisi 600 millions ya ba dollars.

XS
SM
MD
LG