Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bakonzi batindi limpinga mpo koluka Antonov 72 ebungi na Punia (Maniema)


Equipage ya mpepo Antonov 72 ya mampinga ya ya Syria, 16 aout 2018.
Equipage ya mpepo Antonov 72 ya mampinga ya ya Syria, 16 aout 2018.

Bakonzi ya ekolo Congo démocratique mpe mingi mpenza ya etuka ya Maniema batindi mampinga ya bolukiluki na Punia (Mamiema) mpo na koluka cargo Antonve 72 eye ememaki bato mpe biloko ya présidence ya ekolo eyeezali komonona te uto jeudi (lobi).

"Sango ya sikisiki ezwami nanu te ata bavandi bayike ya Punia bayebisaki ete bayokaki lokito ya makasi. Yango tonditi administrateur ya territoire mpe limpinga ya bolukiluki na esika yango, na nzamba pene na aerodrome moko na Kasese," eyebisi VOA Lingala Vice-gouverneur ya Maniema, Jean-Pierre Amadi.

Mpepo yango ewutaki Goma na boko na basali mpe bisaleli ya présidence ya république na suka ya mobembo ya président Félix Tshisekedi na Bukavu mpe na Beni.

Antonov 72 yango ezalaki kobembuka mpo na mampinga ya FARDC.

Ebungaki ba 14h31 TU, kolanda liyebisi ya Autorité ya avitaion civile. Elongwaki Goma, na Kivu na 13h32. Esengelaki ekoma Kinshasa na 16h43.

Kolanda ba medias na Kinshasa, bavandi ya Kasese, Maniema balobi ete mpepo yango ekweyaki kuna.

BA medias mangoi batangi avitaion civile mpe balobi bato bazalaki mwambe na kati. Bato ya équipage minei mpe baye ya mobembo minei mpe lokola.

Kasi, bayike ya présidence, bayebisi présidence ete bato bazalaki 27.

Nzokande na Kinshasa, baye ya UDPS, lingomba ya mokonzi Tshisekedi bakangi nzela mpe batumbi ba pneus nsima na koyoka ete mokumbi ya président mpe baninga basusu babonani nanu te.

A lire aussi

XS
SM
MD
LG