Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi na Etats-Unis


Président Félix Tshisekedi na bofungolami ya laboratoire ya milona mpo na Afrique tropicale na Bukavu, 8 octobre 2019.
Président Félix Tshisekedi na bofungolami ya laboratoire ya milona mpo na Afrique tropicale na Bukavu, 8 octobre 2019.

Président Tshisekedi asali mobembo ya mwa lobango na Etats-Unis uto mercredi na mpokwa, eyebisi na VOA Lingala moko na balobeli ya mokonzi ya ekolo Congo démocratique.

Mobembo mwango mozali mpo likita lyoko na PAM (Programme alimentaire mondial).

Nsima na yango nde Président Tshisekedi nde akeyi na Japon.

Félix Tshisekedi akokende na Japon mpo na botiyami na bokonzi ya empereur oyo abengisaki ntango akendaki na mobembo na ye ya yambo na Japon, na bokutani ya TICAD na Yokohama, elobi Tina Salama, molbeli molandi ya président ya RDC.

Kolanda Mme Salama, M. Tshisekedi esengeli akende mpe na Russie banda le 22 ti le 24 octobre mpo na Sommet Russie Afrique.

XS
SM
MD
LG