Parquet général ya Cour d’appel ya Kinshasa/Gombe ebengesi lisusu Kalev Mutondo, mokonzi ya kala ya ANR (Agence natinale ya renseignements) koyanola na bazuzi ya barquet mardi.
+Mike Hammer amemeli Tshisekedi mokanda mwa longonya ya Biden mpo na kozwa bokambi UA +Bokengi botiamaki makasi lobi na Congrès ya USA na bobangi eyoma ya balandi ba Trump +Bakangai 35 bakimi boloko ya Ilebo na Kasaï +Mobembo ya Papa François na Irak
Bakangami 35 bakimi boloko bonene ya Ilebo, na Kasaï. Kati bato bakimi, ebele bazali babomi mpe basalai mabe. Bolayi na Pierre Sosthène Kambidi. Bililingi bya kala.
Misala mya bokengi mpe bayi pulusu batiami na ekenge makasi na Washington, engumba mokonzi ya Etats-Unis, mpo na sango ete lelo nde balandi ba mokonzi abimi na bokonzi bakokita ebele na ntina na kovandisa na bokonzi Donald Trump ata mabongisi Joe Biden asi azwaki ebonga mpe abandaki mosala.
+Tshisekedi na bakambi ba bikolo bya UA balobeli bobandi ya kopesa mangwele ma COVID-19 +Bopesi mangwele ma COVID-19 bokobanda nzinga nzinga ya le 15 mars na Congno-Brazza mpe na RDC le 12 mars +Bensouda abandi bolukiluki na mbeba na Palestine +Publicité ya politiki ezongeli na Facebook na USA
Bato zomi na wenze moko na masasi y aba ADF babetaki na wenze moko na Mambelenge, na Irumu (Itrui). Sango yango epesami na bayi société civle. Na bolayi na Christine Abeditho. Totala (Bililingi bya kala)
Mokonzi ya Parquet ya Rutshuru, na Nord-Kivu, major Williams Mulanya akufi mardi na mpokwa na masasi ya basimba minduki na nzela ya Goma na Rutshuru-centre.
+Idriss Deby na Tshisekedi basololi mpo na mboka nini kati na Tchad, Gabon na RDC ekozala na Conseil ya Sécurité ya ONU +Conseil ya sécuritéezali kotala matata na Tigré na Ethiopie +Lucien Likulia apesami mpe ya Lieut-gén mpe ebonga ya avocat général +Biden azongisi nsima na botelemeli ya ba rép.
Lucien-Réné Likulia Bakumi nde auditeur général ya sika ya mampinga ma Ekolo Congo démocraique, FARDC, na esikala ezalaki nkondo lieutenant-general Timothee Munkutu oyo akufaki le 15 janvier na Johannesburg na Afrique du Sud.
Basi ya basoda bakufa basali mobulu na Goma, na Nord-Kivu, mpo na kosenga lifuta lya mibali na bango. Baike balobi basala koleka sanza minei, basusu mibu mibale mpe bazwaka misolo te. Reportage na charly Kasereka.
BCNUDH (Bureau Conjoint ya ONU mpo makoki ma bomoto) ekebisi, na rapport ebisimi lundi, na bomati bwa maloba makotinda boyinani na RDC. Rapport ezali mpo na eloko ya 1er mai kino le 31 décembre 2020.
+Suka ya campagne électorale mpo na Bureau définitif ya Sénat +Lilbota lya gén. Delphin Kahimbi lisengi solo mibu mibale nsima na liwa lya ye +Ndzon na opposition bapamela Sassou na kosala campagne yambo na ntango +Sanza ya bayindo esili na USA Rendez-vous sur www.voalingala.com
Voir plus