Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato 5 bakangami nsima na bitumba na Rwanda bandimi bazali  ba FDLR


Bato batano bafundami kozala ba FDLR, bakangami na police ya Rwanda, na Nyabageni, Rwanda, 6 octobre 2019.
Bato batano bafundami kozala ba FDLR, bakangami na police ya Rwanda, na Nyabageni, Rwanda, 6 octobre 2019.

Bato batano bakangami nsima na bobomami ya bavandi zomi na minei na butu ya mokolo na mitano na ya mposo na secteur ya Kinigi, pene na ndelo ya RDC, na Rwanda, bandimi ete bazali batomboki ya ba FDLR.

Bakonzi ya Rwanda balakisaki bango o’boso ya bato banso o’mokolo ya eyenga.

Bakonzi ya Rwanda bafundi batomboki baye na koboma bato zomi na minei na butu ya mokolo ya mitano na ya mposo na mboka kinigi, na parc Volcans pene na ndelo na RDC.

Batomboki baye bakangamaki na mampinga ya ekolo Rwanda baye balandaki bango nsima na bobomami ya bavandi ya Kanigi na machetes mpe mbeli.

Zomi na libwa kati ya batomboki baye bawaki na bitumba na mampinga ya Rwanda. Mitano bakangamaki.

Bakonzi ya Rwanda bazali kobangisa ba FDLR mpe batomboki basusu bazalaka na RDC na kosilisa bango wuta président Félix Tshisekedi akotaki na bokonzi na janvier 2019.

Nzoka nde mampinga ya FARDC balobaki ete babomaki mokambi ya ba FDLR Sylvestre Mudacumura, le 28 septembre moleki.

Sylvestre Mudacumura alukamaki na CPI (Cour pénale international) uto 2012 mpo na bobomami mpe bokangami ya bato ebele na RDC.

XS
SM
MD
LG