VOA Lingala ebengaki molebeli ya ba FDLR , Cure Ngoma, nsima na liyebisi na bango kowangana bobomi ya ntoma ya Italie Luca Attanasio mpe kofunda mampinga ma Rwanda na ma RDC. Totala.
Ntoma ya Italie na RDC, Luca Attanasio, akufaki nsima na kozoka na masasi na bitumba batombaki ba Rwanda ya FDLR (Forces démocratiques pour la libération ya Rwanda) basalaki na zela ya Rusthuru, elobi ministère ya Intérieur ya RDC.
Police mpe misala bokengi bakangi opposante Yvonne Idamange Iryamugwiza na kofunda ye na mobulu makasi.
Mbulamatari ya Rwanda epesi ndingisa ete bangi to cannabis ebanda kolonama na mabele na yango na ntina ya kotekama libanda mpo na koselelama lokola mono.
Président Tshisekedi na bakokani ba ye Paul Kagame ya Rwanda, Yoweri Museveni ya Ouganda mpe Joao Lourenco ya Angola bandimi lisusu kosangisa makasi ma bango na ntina ya kosukisa ba forces négatives na basimba minduki na etuka ya Grands lacs.
Président Denis Sassou N’Guesso asololi mpo etali misala mya kimya na monyele ya RDC mpe na CIRGL na motindami mwa kalaka mokonzi ya ONU na etuka ya Grands lacs, Huang Xia, na Brazzaville.
Lisanga lya société civile ya Canada IMPACT libimisi na mpwasa mombongo ya wolo mozali kokoba kosalama na moyibi wuto RDC, wuto mibu mingi. IMPACT etangi boko na ba Congolais, ba Rwandais na ba Ougandais.
+Koleka nzoto 19 ezwami nsima na bokweyisami ya mabele na mine na Kamituga na Sud-Kivu +Sassou abengisi likita lya bakonzi ba CEEAC na octobre +Bokutani ya bikolo ya Grands lacs na Goma botindikami +Museveni na Magufuli ya Tanzanie bayokani mpo na kotonga 140.000 km ya oléoduc
+Kagame alobi bapaya nde batie bobomi na RDC na mokongo ya Rwanda +Kagame akebisi baye bazali koluka kobebisa bokengi mpe kimya na Rwanda +Etat d'urgence ebakisami mikolo na Congo-Brazzaville +Basoda bazwi bokonzi bapesi IBK ndingisa ya komisalisa libanda lya Mali
Paul Kagame alobi rapport mapping ekelamaki na bikolo bizali linbanda na Afrika na ntina ya kobomba mbeba basalaki na mabele ma RDC mpe kopakola yango na Rwanda.
Molinga mpe lokito ebetamaki na botelemeli bayi LUCHA, Filimbi mpe mangomba misusu basalaki mpo na kosenga bobengani bwa ntoma ya Rwanda na Kinshasa. Batelemeli bazali kofunda ntoma Vincent Karega na kowangana bobomi ya mampinga ya Rwanda na mabele ma RDC. Totala bililingi bya Stve Wembi.
Police ebetaki molinga mpe lokito mpe epanzaki bato baye babandi kotambola mpo na kosenga bobengani bwa ntoma ya Rwanda na Kinshasa.
Voir plus