Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mitano bafundami mpo na kokanga bato bazwi etumbu ya liwa na Kinshasa


Mosamebli moko liboso ya bazuzi na boloko ya makala, 30 avril 2013.
Mosamebli moko liboso ya bazuzi na boloko ya makala, 30 avril 2013.

Bato mitano bafundami mpo na kokanga baleki nzela na Kinshasa bakatelami etumbu ya liwa o’mokolo ya misato na bosambisami ya lobango na Tribunal ya Grande instance ya Gombe, na place ya ba évolués na Kinshasa.

Bato batano baye bandimi mbeba na bango. Bafundamaki mpo na bosangani na ntina ya kosala mabe, kobotola biloko ya bato, kokanga mpe kolimwisa bato mpe koboma.

Bandimi ete babomaki mwasi moko nsima na kokanga ye mpe kobotola ye misolo 21.000 $ ya Amerika. Kasi libota ya mowei lilobi mosolo mozalaki 450.000$, kolanda site ya sango Actualite.cd.

Mosambeli ya mowei asengi misolo 50.000$.

Bafundami bandimi lisusu ete bakanga bato basusu ebele.

Basambeli na bango mpe bandimi mbeba yango.

Police nationale congolaise ya engumba ya Kinshasa esakolaki na liyebisi o’mokolo ya mibale bokangami ya bato mabe batano baye bakanga baleki nzela na Kinshasa na mituka ya taxi.

Nzonkande etumbu ya liwa epemisama to ezali na morratoire na RDC uta mibu mingi.

XS
SM
MD
LG