Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi akambi likita ya bokengi ya bakambi ya bituka ya est


Président Félix Tshisekedi yambo na bokutani ya bokengi na bakambi ya bituka ya monyele ya Congo démocratique na Nyofu, na Sud-Kivu, 9 octobre 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi yambo na bokutani ya bokengi na bakambi ya bituka ya monyele ya Congo démocratique na Nyofu, na Sud-Kivu, 9 octobre 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akambi likita monene ya bokengi na bakambi ya bituka bitano ya monyele to est ya ekolo Congo démocratique na Nyofu, na Sud-Kivu.

Bakambi ya Ituri, Nord-Kivu, Sud-Kivu, Maniema mpe Tanganyika bazalaki kuna elongo na bakambi ya mampinga, ya misala ya bokengi mpe bayike ya mbulamatari.

Bokutani boye bosalami mokolo moko nsima ya bofungwami ya laboratoire ya milona Olusengun Obasanjo mpo na etando mobimba ya Afrika ya kati kati, na Kalambo, na 20 kms ya Bukavu.

Félix Tshisekedi asalaki mobembo moye mpo na bobandi ya misala ya laboratoire yango o'mokolo ya misato moleki.

Azalaki na bokutani bosusu ya bokengi o'mokolo ya minei na ntongo. Kasi maye mazalaki na masalo mayebisami te.

Mokonzi ya mboka RDC azelami mokolo ya minei na Beni na Nord-Kivu.

XS
SM
MD
LG