Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

PGR Kabange asengi etumbu mpo na kopesa baponi biloko ntango na maponami


Bazuzi ya Cour constitutionnelle na Kinshasa, 19 juanvier 2019.
Bazuzi ya Cour constitutionnelle na Kinshasa, 19 juanvier 2019.

Procureur général na Cour ya Cassation, Flory Kabange alobi ete "motivation" to kopesa biloko songolo na baponi ntango ya maponami ezali mbeba mpe esengeli kozwa etumbu.

PGR Kabange alobi yango na lisikulu na ye na bozongi ya misala ya bosembo.

Atalisi mpasi na ye mpo ete bato bamemaki te liboso ya bazuzi bilembo ya kaniaka bapalelaki ntango ya maponami na ba Sénateurs na ba gouverneurs.

Président Félix Tshisekedi atelemisaki mpo na ntango moke botiyami na mosola ya ba Sénateurs likolo na nungunungu ezalaki mpo na kaniaka ntango ya maponami na bango na ba assemblées provinciales.

Kasi misala myango (ya ba Sénateurs) mibandaki nsima na mwa ntango mpo na bozangi bilembo ya kaniaka yango.

Nzonkande procureur Flory Kabange andimi ete kaniaka esalamaki solo na maponami ya ba gouverneurs mpe ya Sénateurs. Alobi kopesa baponi biloko to mosolo ntango na maponami bosengeli bozwa etumbu.

Premier ministre Ilunga Ilunkamba azalaki na milulu myango ya bozongi ya misala ya bosembo

XS
SM
MD
LG