Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Nzoto ya bawei basato ya Antonov 72 ememami na Kananga


Ba soda ya Monusco ya bataillon ya Inde bamemi moto moko ya mpasi ntango ya bitumba ya ya ba M23 na Kwanja, Nord-Kivu, 14 aout 2012.
Ba soda ya Monusco ya bataillon ya Inde bamemi moto moko ya mpasi ntango ya bitumba ya ya ba M23 na Kwanja, Nord-Kivu, 14 aout 2012.

Nzoto ya bato basato bakufaki na Antonvo 72 eye ekweyaki pene na mboka Okoto, na Kole (Sankuru), ememami na Kanaga, eyebisi molobeli ya Monusco.

Nzoto yango ekundolamaki ne esika mpepo yango ezwaki likama mpe Monusco ememaki yango na hélicoptère kino Kananga, engumba mokonzi ya Kasaï central.

Molebeli ya Monusco, Florence Marchal, ayebisi ete nzoto yango etiyami na morgue. Monusco ekopesa yango na bakonzi ya Congo démocratique.

Lobi loleki, mokambi ya press présidentielle ya RDC, Abraham Luakabuanga alimbolaki VOA Lingala ete nzoto minei nde ezwamaki mpe misala miye misengeli mizali kotala mpo na koyeba nzoto yango ezali ya banani.

Kolanda M. Luakabuanga, longola bamemi mpepo (pilotes), bato mwambe (mokumbi ya motuka ya président Félix Tshisekedi mpe bakengeli baye) nde bazwaki ndngisa ya kosala mobembo na mpepo yango.

Ambassade ya Russie asakolaki uto jeudi 10 octobre nsima ya likama lyango ete bana ya mboka baye babale baye bazalaki bamemi mpepo yango bakufaki na likama lyango.

Kasi o’mokolo ya eyenga, moko na bakambi ya CRS (Catholic relief service) akitaki na Okoto mpe bato ya mboka bayebisaki ete nkumu na bango atindaki bango kokunda nzoto minei ezwamaki na esika ya likama mpo ebebaki.

Kino sik’oyo, bolukiluki bozali kosalama mpo na nzoto esusu mpe mpo na boïte noire.

XS
SM
MD
LG