*Président ya BAD alobi ayei kokembisa boyokani na RDC *Basengezi ayanoli na etumbu ya USA nsima na kotika mosala na CENI *Momekano ya BAC ebandi na Congo-Brazzaville *450 Congolais ya Kinshasa mpe Brazzaville bakoti nzela ya makolo na USA
Bakonzi ya USA bazuwi na ndelo na Mexique 450 Congolais ya Kinshasa mpe ya Brazzaville baye bokoti na mabele ya Ameriki na nzela ya makolo, na bozangi mikanda. VOA Lingala etindi monzeneneke na San Antonio, na Texas mpo na kotala lolenge nini bazali. Sango na Fatuma Kalala.
Tshisekedi, na Beni, asengi ba groupes armés bakitisa minduki. Global Witness etangi general Amisi "Tango Four" mpo na koteka zamba na kobukaka mobebo. Claudel Lubaya asengi etumbu npo na Tango Four.
Bilenge ya Lucha batamboli na loyembo mpe losambo mpo na bosolo na maponami ya le 30 mars na Beni. Mabongisi mpo na boyei ya mokonzi Félix Tshisekedi na Washington mazali kokoba. Député Martin Kabuya alobi mpo nini gouvernement ezali kowumela. Barreau ya Kasaï epaleli bowumeli na procès ya ba expert
Martin Fayulu asengi, na mituna mpe biyano na studio ya VOALingala na Wanshington, ete bakonzi ya Amerika mpe ya mokili mobimba bakende mosika koleka etumbu likolo ya bakambi ya CENI. Alobeli mpe masolo maye makoki kosalema mpo na kondima ya bokinzi. Asengi bana ya RDC balemba te. Ayanoli mpe mpo o
Martin Fayulu ayanoli na mituna ya Eddy Isango nsima ya conférence na ye na Georges Washington University, na Washington D.C., na Etats-Unis.