Felix Tshisekedi alobi ete azwi mokano ya kosala ete bomengo ya ekolo bopesa bomoi bolamu na bana ya mboka.
Mokano na ngai ezali makasi kasi mokoki kosalama kaka soki bana ya Congo banso bapesi maboko na kotalaka te ngambo na bango ya politiki, eyebisi M. Tshisekedi.
Mokonzi ya RDC alaki komema mboka na mbongwana enene ekobanda na misala ya bosembo kino na maye matali bomoi ya ekolo mobimba.
Yango ekoleka na bitumba na kaniaka, na kopengwisa misolo ya l’Etat mpe na koyiba mpako.
Alobi na lisikulu na ye ete alingi abimisa na bobola 20 millions ya bana ya Congo bavandi na milieu rural mpe péri-rural to kati na mboka, na mibu mitano mikoya.
Mpo na yango Félix Tshisekedi asakoli ete alingi apesa nzela na ba infrastructures socio-économiques ya nse na ba populations rurales na nzela ya botongi ndako ya bisalaleli ya makasi, kopesa lotiliki, mayi, lopitalo mpe na kopesa makoki ya kosala bilanga.