Ministère ya Intérieur ebwakisi mbongwana emamaki Jean-Marc Kabund na ebonga ya mokambi ya UDPS na esika ya président Félix Tshisekedi.
Parquet ya Tribunal ya grande instance ya Gombe esengi autopsie ya nzoto ya zuzi Raphael Yanyi Ovungu, mosambisi ya Vital Kamerhe na basusu mpo na mikolo nkama, oyo akufi na butu boleki.
Député Jean-Jacques Mamba, mobandisi ya pétition oyo ekweyisaki Jean-Marc Kabund na ebonga ya 1er vice-président ya Assemblée nationale, asikolami nsima na kosambisama lelo na Cour ya cassation na bofundami ya député mosusu mpo na kotia nkombo na ye na lokuta kati na mokanda mwango.
Ba sénateurs baboyi bango banso kopesa nzela ete Thambwe Mwamba, mokambi ya suku eye la likolo ya Parlement, akenda kosambisama.
Président Félix Tshisekedi apesi losako ya suka na directeur adjoint ya communication na ye, Charles Kilosho oyo akufaki o’mokolo mwa mposo moleki.
Ba députés 289 bapona mpo na kolongola président intérimaire ya UDPS, Jean-Marc Kabund, na ebonga ya 1er vice-président ya Assemblée nationale.
Baiike na Assemblée nationale basengi bobisami ya député Jean-Jacques Mamba nsima na bokangami na ye kolanda boyanoli na ye na Cour ya cassation na bofundami mpo na lokuta mpe misala ya lokuta (faux na usage de faux.
Président Trump apesi mitindo na bakambi ya ba Etats nionso ya USA kofungola ndako ya Nzambe mpe bisika ya losambo ata COVID19 ezali nanu kongala na mokili. Asakoli mokano yango ntango ba Etats mingi bafungoli misala miike kasi batiki nanu ndako ya Nzambe, kelasi mpe makambo misusu.
Etude moko ebimisami na mokanda na nkombo ya Lancet elobi ete Hydroxychloroquine mpe chloroquine ezali kosala malamu te na babeli ya COVID19 kasi emonisami lokola komema bango na liwa.
Ministre ya Bokolongo bwa nzoto, Dr. Eteni Longondo alobi ete moto moko te azali kosomba nzoto ya bawei mpo na kovimbisa motango mwa bakoni ba COVID19 lokola ezali kolobama na Kinshasa mpe bisika misusu.
Balandi ya Zacharie Badiengila oyo ayebani lokola Ne Muanda Nsemi bakufaki pene na tuku mitano na mitano kati na le 13 mpe le 23 avril na misala mya bayi bokengi mpe police, elobi Human Rights Watch na rapport na yango.
Koleka bato 76 bakufi na likama ya masuwa na Kongolo na etuka ya Tanganyika, eyebisi bayi société civile na bapanzi sango.
David Blattner, directeur général ya société SAFRICAS abandi kosamba na Tribunal ya Grande instance ya Gombe na Kinshasa mpo na bopengwisami ya misolo pene na ba millions minei bipesamaki mpo na kotonga ba sauts de mouton minei.
Daniel Shangalume Kingi oyo abengami na nkombo ya "Massaro" azali koyanalola lelo lundi 18 mai 2020 na parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa Matete nsima na bokangami na ye na suka ya mposo moleki na Kenge (na etuka ya Kwango) na bokimi na ye.
New York, capitale économique mpe culturelle ya Etats-Unis ebakisi mikolo na confinement ntango bingumba mpe ba Etats mingi ebandi kofungola misala mya yango.
Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel ya kimya ya 2018, asengi bosembo mpo na bato bakufaki na Katogota, na Sud-Kivu, na 2.000 ntango lingomba ya batomboki ya kala RCD-Goma ezali kokonza na monyele ya moboka.
Mampinga ya ekolo Rwanda (RDF) makotaki na mabele ya Ekolo Congo démocratique (RDC) na sanza ya avril mpo na kobengana batomboki ba FDLR, elobi ba experts ya Baromètre sécuritaire ya Kivu na koboya makambo malobamaki na bakonzi ba Kigali.
FECOFA (Fédération congolaise ya football association) ezwi mokano ete TP Mazembe, AS, V.Club, AS. Maniema Union na DCMP nde bakobeta compétions afriaines lokola chmapionnat national esuki na kati mpo na COVID19.
Isabel Dos Santos, mwana mwasi ya président ya kala ya Angola Eduardo Dos Santos, mpe mwasi ya moyi ekolo Congo démocratique Sindika Dokolo, apameleli bazuzi ya mboka na ye na kokanga biloko na ye na lokuta.
Pascal Mukuna, episkopo mpe motambwisi ya eyamba ACK mpe mokambi ya misala mibengami Eveil patriotique, abengisami na parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa/Gombe mercredi mpo na kofundama na mwasi moko na kozwa ye na makasi mpe kobotola mikanda ya ndaku.
Voir plus