Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Jean-Jacques Mamba asikolami


Député Jean-Jacques nsima na botikami bwa na Cour ya cassation ya Kinshasa, 27 mai 2020. (Twitter/Raphael Kibuka MLC)
Député Jean-Jacques nsima na botikami bwa na Cour ya cassation ya Kinshasa, 27 mai 2020. (Twitter/Raphael Kibuka MLC)

Député Jean-Jacques Mamba, mobandisi ya pétition oyo ekweyisaki Jean-Marc Kabund na ebonga ya 1er vice-président ya Assemblée nationale, asikolami nsima na kosambisama lelo na Cour ya cassation na bofundami ya député mosusu mpo na kotia nkombo na ye na lokuta kati na mokanda mwango.

M. Mamba atelamaki liboso ya bazuzi ata mikolo mibale yambo na yango, Assemblée nationale ekataki ete misala mya bosembo misukisa kolandela ye mpe mibimisa ye mbala moko.

Ezalaki lundi na likita liye ba députés bandimaki pétition M. Mamba abandisaki mpe bakweyisaki na ebonga ya 1er vice-président ya suku ya nse ya Parlement, Jean-Marc Kabund, mokambi ya UDPS, na esika ya président Félix Tshisekedi.

Député Simon Mpiana ya UNC (Union pour la nation congolaise) afundaki M. Mamba na kolaba ete atiaki nkombo na ye na nkasa ya kosenga bolongwi ya M. Kabund mpe amekolaki mokoloto mwa ye.

Ba député 62 nde batiaki manzaka na mokanda mwango.

Lundi, ba députés bandimaki pétition yango mpe balongolaki na maponami M. Kanund na ebonga ya 1er vice-président ya Assemblée nationale.

XS
SM
MD
LG