Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Evêque Mukuna abengisami na parquet ya Cour d’appel/Gombe


Pascal Mukuna, episkopo ya Assemblée chrétienne de Kinshasa (ACK), Kinshasa, RDC, 20 mai 2016. (Facebook/Pascal Mukuna)
Pascal Mukuna, episkopo ya Assemblée chrétienne de Kinshasa (ACK), Kinshasa, RDC, 20 mai 2016. (Facebook/Pascal Mukuna)

Pascal Mukuna, episkopo mpe motambwisi ya eyamba ACK mpe mokambi ya misala mibengami Eveil patriotique, abengisami na parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa/Gombe mercredi mpo na kofundama na mwasi moko na kozwa ye na makasi mpe kobotola mikanda ya ndaku.

"Biso, Samy Bunduki Baombolia, officier ya ministère, tobengisi tobengisi na lotomo pasteur-évêque Mukuna mpo na ayanola na mbeba afundameli mpe toyebisi ete soki asali yango te, aofficier ya ministèrekomema na makasi kolanda mibeko," elakisi mokanda ya parquet.

Avocat na ye, Me Jean-Claude Ketnde, mokambi ya ASADHO mpe vice-président ya lingomba Eveil patriotique alobi ete évêque Mukuna azwi mokanda ya parquet kobengisa ye te.

Mikolo mileki mwasi moko afundaki episkopo Mukuna na parquet mpo na kozwa ye na makasi mpe kobotola mikanda mya ndaku ya mobali na ye, mosungi ya pascal Mukuna, oyo akufaki mikolo mileki.

Yambo na yango bililingi ya ekobo bilakisaki lokolo Pascal Mukuna bitambolaki na ba réseaux sociaux.

Mposo moko moleki, Pascal Mukuna amemaki mikanda ya kofunda mokonzi ya kala Joseph Kabila na liwa na bato baiike mpe mbeba ya makoki ba bomoto na bonkonzi bwa ye.

Kino nsima na elonga président Félix Tshisekedi na maponami, M. Mukuna azalaki na ngambi ya FCC (Front commun pour le Congo) libota ya politiki ya mokonzi ya kala Kabila.

M. Mukuna azalaki mpe moko na bayi bapesaki maboko na candidat ya FCC Emmanuel Ramazani Shadary.

Kasi abongalaki maloba wuto mobu moleki mpe akoma kotemela M. Kabila mpe FCC.

XS
SM
MD
LG