Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Baiike na Assemblée nationale basengi botikami ya député Mamba


Jean-Jacques-Mamba
Jean-Jacques-Mamba

Baiike na Assemblée nationale basengi bobisami ya député Jean-Jacques Mamba nsima na bokangami na ye kolanda boyanoli na ye na Cour ya cassation na bofundami mpo na lokuta mpe misala ya lokuta (faux na usage de faux.

Bakambi ya ba groupes parlementaires mpe ba présidents ya ba comissions ba basengi, na lisakoli, bobimisami bwa moninga na bango député Mamba ya MLC.

"Bokangami oyo elandi mibeko te mpe elongoli kondima na magistrature oyo baye batiami na mosala sika esenglaki balakisa misala mya sika miye mikuasami mingi, kasi misala mya bozangi bosembo te," elobi bakambi ya ba groupes parlementaires mpe ba présidents ya ba comissions parlementaire na lisakoli na bango.

Mpo na bango, "bokangami boye bosalami na ntango bokuki mingi bwa mamkoki ba bomoto bozali kosalama na mboka wuto mwa mikolo".

Bayi Assemblée nationale bayesi ete président ya suku eye ya parlement, Jeanine Mabunda, akomeli Cour cassation mpo na kosenga bobimisami ya M. Jean-Mamba.

Bayi politiki mingi mpe basengi botikami bwa ye, lokola MLC (Mouvement de libération du Congo) ya Jean-Pierre Bemba, lingomba ya M. Mamba.

M. Afundami na député mosusu, Simon Mpiana ya UNC (Union pour la nation congolaise) ya Vital Kamerhe. Député Mpiana alobi ete atiaki nkombo na ye mpe amekolaki signature na ye na pétition asali mpo na kosenga bolongoli ya Jean-Marc Kabund, président intérimaire ya UDSP, na ebonga ya 1er vice-président ya Assemblée nationale.

Pétition yango ezali na manzaka ya ba députés 62.

Nsima na boyoki ye, ba magistrats batie M. Mamba na résidence surveillée (bokangami na ndako) na hôtel moko mpo azela bozabimisa na ye na libandela ya mposo.

XS
SM
MD
LG