Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi, akotikala na boloko, ekati Tribunal ya grande instance ya Gombe nsima na kinzonzi bazuzi basalaki na bobandi ya procès na lundi.
Pene na 2,8 nde motango ya bisaleli USAID, agence ya Etats-Unis eye esalaka mpo na ntombwa, epesaki na RDC.
Ba avocats ya Dr. Oly Ilunga, ministre ya kala ya bokolongono, bapameli bgreffier ya Cour ya cassation mpo na abwkisi bosenga na bango ya koboya mokona mokweyisa client na bango na etumbu ya mibu mitano ya misala makasi mpo na kanyaka.
+Kabila afundami na Evêque Mukuna mpo na mbeba ya bomoto +Sassou aboyi kobimi Mokoko mpe Okombi ata mpo na COVID19 +T, Lubanga asengi bana ba Itrui kotika bitumba +RDC efungolu nzela ya makolo na Zambie na Kasumbalesa
Thomas Lumbanga, moto ya yambo na molongo asalaka boloko na CPI (Cour pénale internationale), abwaki mbela na bana banso ya Ituri -epayi awuta- mpo batika biutmba.
Président Denis Sassou N’Guesso alobi ete ntina ezali te ya kobimisa na boloko Jean-Marie Michel Mokoko mpe André Okombi Salissa, ba opposants politiques babale ata COVID19 ezali kongala na mokili.
Pascal Mukuna, mokambi ya eyamba ACK mpe motambwisi ya Eveil patriotique atiki na parquet ya Cour constitutionnelle mokanda ya kofunda mokonzi ya kala Joseph Kabila na mbeba ya makoki ma bomoto.
Président Tshisekedi akitaki na lopitalo ya Cinquantenaire epayi wapi asololaki na bakoni ya COVID19 mpe mingaga mpo na ndenge lisalisi ezali kopesamela bango. Baiike na bakoni babimisami nsima na koleka ya président. Totala bililingi ya présidence ya RDC.
ONU epameli basali ya l'état mpe basimba minduki mpo na 700 mbeba ya makoki mabomoto masalami na mars.
Bokelami ya secrétariat ya ba présidents ya mboka ya kala bawuta na maponami bozali kobongisa na mbulamatari kasi baiike batemaleli na Société civile, lokola ACAJ.
+Bato koleka 100 bazwi COVID19 na boloko ya N'Dolo +Ne Muanda Nsemi aza maladie ya mutu (CNPP) +Mokambi ya ba Maï Maï Lafontaine Kakule amizongisi na mampinga na Goma +Lipinga ya balukiluki ya Congo-Brazzaville likiti Madagascar mpo na kozwa nkisi ya COVID-Organics
Ne Muanda Nsemi, mokambi ya lingomba lisangisaka poilitiki na bokoko, Bundu dia Mayala, azali bokono na mutu, kolanda eyano CNPP epesi na procureur général.
Ministre ya bokolongono ya Tanzanie apemisi mokambi ya laboratoire national nsima na mokonzi ya mboka John Magufuli kopamela ye mpo na bilembo ya malanu te na ba tests ya COVID-19.
Bato baiike bazongeli mosola na Rwanda lundi nsima na mposo motoba ya bokangami bozalaki mpo na kopekisa COVID-19 kopanzana. Moto moko akufi na COVID na Rwanda wuto yango ekotaki na mobka eye na sanza ya mars
Bakambi ba biyamba bandimi te kotambwisi libenga lya bondeko mpo na COVID19, FNSC (Fonds national ya solidarité na bitumba na COVID19), esakoli bango liboso ya bapanzi sango na Kinshasa.
Bato 41 bazwami na COVID19 ya Ndolo na Kinshasa, eyebisi ministre ya Bokolongono, Dr. Eteni Longondo. Bazali kati na 73 bakoni basika mpe 9 kati na ba Congolais baye bazongaki wuta Duabï mposo moloke mpe bazwi COVID19.
+Sassou abakisi mikolo 15 ya état d'urgence +Ba parlementaires basilikeli mbulamatari mpo police ezo pasola mikanda mya bango kotambola na état d'urgence +Mokambi ya Lualaba atie mikolo 60 ya losambo mpo na COVID19 +COVID19 : PSG alongi championnat ya France ya foot eye ekatani
Bakonzi ya misala ya bitumba na corovirus ya sika bazwi mokano ya kosukola na nkisi boloko ya Ndolo,na Kinshasa mpo bato banei bazwami kuna na bokono boye.
Président Denis Sassou N’Guesso asakoli ete bobokangami bwa ekolo bokokoba kino le 15 mai mpo na kotelemela coronavirus ya sika COVID19.
Ba parlementaires ya Congo-Brazzaville basilikeli mbulamatari mpo police mpe misla ya bokengi mizali kopasola mikanda ya bango ya ndingisa ya kotambola ntango eye ya état d’urgence mpe ya confinement.
Voir plus