Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mampinga ya Rwanda makotaki na Kivu na avril, elobi KST


Ba sado ya mampinga ya Ekolo Congo démocratique likolo ya ngomba ya Kanyesheza, pene na ndeloa na Rwanda, Kivu, 15 1uin 2014.
Ba sado ya mampinga ya Ekolo Congo démocratique likolo ya ngomba ya Kanyesheza, pene na ndeloa na Rwanda, Kivu, 15 1uin 2014.

Mampinga ya ekolo Rwanda (RDF) makotaki na mabele ya Ekolo Congo démocratique (RDC) na sanza ya avril mpo na kobengana batomboki ba FDLR, elobi ba experts ya Baromètre sécuritaire ya Kivu na koboya makambo malobamaki na bakonzi ba Kigali.

Kolanda Baromètre sécuritaire ya Kivu (KST, na anglais, batomboki babale ya FDLR, basoda banei ya Rwanda RDF mpe libwa ya RDC bakufaki na bitumba le 18 avril pene na mboka Kasali na Rutshuru.

Nzokande, mikolo mileki président Paul Kagame alapaki ete ata soda moko te ya Rwanda azali na mabele ya RDC. M. Kagame alobaki ete ata bakonzi ya RDC bayebi yango malamu.

Basoda ba Rwanda "basalaki bitumba le 13 avril na ba Forces démocratiques pour la libération du Rwanda (FDLR) na mboka Marangara, Kanyeru mpe Kazaroho" na territoire ya Rutshusuru, na etuka ya Nord-Kivu, elakisi rapport ya sanza eye ya Baromètre sécuritaire ya Kivu (KST, na anglais).

Mampinga ya Rwanda "malongoli ba FDLR na mboka eye", elobi KST, projet ya coopération kati na Groupe d’études sur le Congo (GEC) eye esalaka elongo na Université ya New York mpe na ONG ya Amerika Human Rights Watch.

Kati na bitumba byango, ndako 105 ezikisamaki, elobi KST oyo ezwaka sango wuto réseau monene ya ba informateurs na bituka bya Kivu mibale.

"Le 18 avril, ba FDLR batielaki mutambu na convoi moko ya mampinga ya RDC mpe ya mampinga ya Rwanda pene na mboka Kasali na territoire ya Rutshuru," ebakisi KST.

Batomboki babale, basoda banei ya Rwanda mpe libwa ya RDC bakufaki na bitumba byango.

Ba FDLR bazali lingomba likelamki na ba Hutu bakimaki bobomami bonene (génocide) na Rwanda na 1994 bafundama kozala bayesala.

XS
SM
MD
LG