Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dr. Mukwege asengi bosembo mpo na bato bakufaki na Katogota na 2.000


Denis Mukwege, Prix Nobel ya Kimya 2018, monganga oyo abongisa basi babebisama na kozwama na makasi wuto mibu mingi, na Bukavu, Sud-Kivu, 5 octobre2018.
Denis Mukwege, Prix Nobel ya Kimya 2018, monganga oyo abongisa basi babebisama na kozwama na makasi wuto mibu mingi, na Bukavu, Sud-Kivu, 5 octobre2018.

Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel ya kimya ya 2018, asengi bosembo mpo na bato bakufaki na Katogota, na Sud-Kivu, na 2.000 ntango lingomba ya batomboki ya kala RCD-Goma ezali kokonza na monyele ya moboka.

"Le 14 mai 2.000, mibu 20 mileki, koleka bato 350 bato babomamaki na Katogota na Sud-Kivu. Ekomi ntango ya kokundola rapport Mapping mpe ya kopesa bosembo na bato banso bazwaki mpasi," ekomomi na compte Twitter na ye Dr. Mukwege.

Dr, Mukwege, monganga oyo abongisa basi babebisama na kozwama na makasi wuto mibu mingi alobi ete azali kopesa maboko mpo na yango, na CCJT (Coalition des Congolais pour la justice transactionnelle).

CCJT esengaka bolukiluki mpe bosembo mpo na likambo yango.

Le 14 mai 2.000, bato 350 bakufaki, kolanda CCJT, ntango ba soda ya RDC-Goma babomaki bango na masasi, mbeli mpe makwangola.

Kolanda CCJT, ba soda ya RDC-Goma bakitaki na Katogota nsima na officier ya batomboki baye kobomama na maboka ya basimba minduki bayebani te kino sik’oyo.

Likambo lya likomamaki na rapport mapping ONU esalaka mwa ntango nsima.

XS
SM
MD
LG