Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump apesi ba gouverneurs mitindo ya kofungola ba ndako ya Nzambe


Président Donald Trump na bokutani na bapanzi sango na Maison Blanche, Washington DC, 22 mai 2020.
Président Donald Trump na bokutani na bapanzi sango na Maison Blanche, Washington DC, 22 mai 2020.

Président Trump apesi mitindo na bakambi ya ba Etats nionso ya USA kofungola ndako ya Nzambe mpe bisika ya losambo ata COVID19 ezali nanu kongala na mokili. Asakoli mokano yango ntango ba Etats mingi bafungoli misala miike kasi batiki nanu ndako ya Nzambe, kelasi mpe makambo misusu.

"Nasengi na bakambi ya ba Etats kopesa nzela na (ba) ndako ya Nzambe na biso mpe bisika bya losambo kofungwama sikoyo. Soki mitanu mizali, babenga nga kasi bakolonga te na masolo tosala," elobi tata mokonzi ya Etats-Unis na bokutani na bapanzi sango na Maison Blanche.

"Soki baboyi, nakoleka likolo na bango," ekebisi M. Trump.

M. Trump alobi ete ndako ya Nzambe ezali eloko ya motuya koleka.

"Lelo natie bisikao ya losambo, ndako ya Nzambe, synaguogues mpe ba moske na esika ya misala ya litomba makasi. Bakambi ya ba Etat baiike bakanisaki ete bisika batekaka masanga makasi mpe balongola zemi bizali na litomba. Kasi, batiki ndako ya Nzambe mpe bisika ya losambo. Ezali malamu te. Yango, nazali kobongisa bozangi bosembo boye mpe nazali kosakola ndako ya losambo lokola likonzi," elobi M. Trump.

Mpo na ye, bato mingi bazali kosenga bazongela kokende ndako ya Nzambe.

Mokonzi ya Etats-Unis abakisi ba Centres etalaka makoni mpe esalaka mpo na kopekisa yango (CDC) esengeli bapesa malako matali bisika ya losambo.

Na eyano na malabo maye, lingomba ya musulmani liboyi kofungola bikuke na yango.

"Banganga ya boyebi ya ba musulmani mpe bakambi ba lingomba balobaki ete bamoske ekofungwama te na mikolo mikoya pembeni likolo na mpasi pandémie (bokono boye bompazani mokili mobimba) ememi. Mpe yango ezali mokano oyo président akoki kozwa te. Namoni te moske moko kondima kobongola mabongisi likolo na maloba mawuti na moto atindaki bopekisami ya ba musulmani," eyanoli mokambi ya ligomba ya ba musulmans na Etats-Unis, Ibrahim Hooper na correpondant ya VOA na Maison Blanche.

Etats-Unis ezali na fédéralisme. Ba gouverneurs bazali na makoki ya kozwa mikano to mpe ya koboya mpo na ba Etats na bango.

XS
SM
MD
LG