Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi apesi losako ya suka na directeur adjoint ya Communication na ye Kilosho


Président Félix Tshisekedi atiki fololo liboso ya sanduku ya nzoto ya Charles Kilosho, moko na basungi baye, na lopitalo ya Cinquantenaire, Kinshasa, 26 mai 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi atiki fololo liboso ya sanduku ya nzoto ya Charles Kilosho, moko na basungi baye, na lopitalo ya Cinquantenaire, Kinshasa, 26 mai 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi apesi losako ya suka na directeur adjoint ya communication na ye, Charles Kilosho oyo akufaki o’mokolo mwa mposo moleki.

Milulu myango misalamaki na lopitalo ya Cinquantenaire, na Ksasa-Vubu, na Kinshasa.

Président Tshisekedi atikaki fololo mpe angumbaki moto liboso ya sanduku ya nzoto ya M. Kilosho.

Mopanzi sango ya ntango ya molayi mpe mosali ya maye matali communication ya ba organisations mingi, Kilosho, akufaki na mibu 53, na lopitalo na CMK (Centre médical ya Kinshasa).

Amonisamaki ya COVID19.

Lokola M. Kilosho, bato basusu mpe bakufi mikolo miye nzinganzinga na mokonzi ya mboka na bokono boye.

XS
SM
MD
LG