Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etude moko elobi hydroxychloroquine mpe chloroquine ezobikisa COVID19 te (Lancet)


Chimiste moko asimbi mono ya hydroxychloroquine na New Delhi, Inde, 9 avril 2020.
Chimiste moko asimbi mono ya hydroxychloroquine na New Delhi, Inde, 9 avril 2020.

Etude moko ebimisami na mokanda na nkombo ya Lancet elobi ete Hydroxychloroquine mpe chloroquine ezali kosala malamu te na babeli ya COVID19 kasi emonisami lokola komema bango na liwa.

Chloroquine mpe hydroxychloroquine oyo ewuta na yango, ekoki kobebisa lolenge motema mobetaka (arythmie cardiaque), eyebisi mokanda Lancet mobimakawa na Etats-Unis.

Lancet elobi bolukiluki bosamali mpo na yango likolo na bato pene nkama na lopitalo nkama.

Bilembo byango bibimisami nsima na mikolo president Donald Trump asakolaki ete azali komela ye moko hydroxychroloquine mpo na COVID19.

Yango etindaki mbulamatari kosomba mono yango mingi.

Bikolo mingi bizali kosalela chloroquine na hydroxychloroquine mpo na kobundisa COVID19.

Professeur Didier Raoult abunda mingi mpo na yango, lokola na RDC, professeur Michel Ekwalanga, ye mpe lokola.

XS
SM
MD
LG