Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koleka bato 76 bakuki na likama ya masuwa Kongolo (Tanganyika)


Masuwa na libongo ya Kalemie na lac Tanganyika, 22 mars 2018.
Masuwa na libongo ya Kalemie na lac Tanganyika, 22 mars 2018.

Koleka bato 76 bakufi na likama ya masuwa na Kongolo na etuka ya Tanganyika, eyebisi bayi société civile na bapanzi sango.

"Nzoto ya bato 76 ezwami mpe bato basusu bazali na kolukama. Bato 20 nde babikisami," esakoli société civile ya Kongolo.

Likama lyango lisalemi lundi.

Masuwa na nkombo ya "Bana Bamo" mazindaki pene na mboka Kiyambi na koluka kobaluka mpo na kozonga na Kongolo.

Masuwa mango mazalaki kokende na Moba kasi ebale ya Congo emataki mingi nsima na mpela mpe ezalaki komema na masuwa na makasi mingi, elobi bayi société civile.

Bato balekaki mingi mpe motango na bango eyebani te, kolanda sociétécivile.

XS
SM
MD
LG