Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Isabel Dos Santos apemeli mbulatari na kokanga biloko bya ye na lokuta


Isabel Dos Santos na molongani wa Sindika Dokolo na Porto, Portugal, 5 mars 2015
Isabel Dos Santos na molongani wa Sindika Dokolo na Porto, Portugal, 5 mars 2015

Isabel Dos Santos, mwana mwasi ya président ya kala ya Angola Eduardo Dos Santos, mpe mwasi ya moyi ekolo Congo démocratique Sindika Dokolo, apameleli bazuzi ya mboka na ye na kokanga biloko na ye na lokuta.

Isabel, na mibu 47, akomi na liyebisi ete ba procureurs baye bazalaki na enquête eye ememaki na kokanga biloko mpe bozwi na ye, balandi passeport ezalaki na lokuta na kati.

"Copie ya passeport ya lokuta esalelamaki mpo na kokela ba preuves na ba tribunaux ya Angola (…) bakonzi ya Angola mpe Portugal bandimaki passeport etiyama manzaka na Bruce Lee, acteur ya kung fu ya mibu 1970," elakisi liyebi ya Isabel dos Santos.

Copie ya passeport yango emonisami na compte Twitter ya Mme Isabel.

Lingomba ya ba journalistes (ICIJ) mpe na misala mya bosembo ya Angola nde efundaki Mme Isabel na koepgnwisa misala mya l’Etat.

Azalaki mokambi ya Songal, Société ya pétrole na Angola, na bokonzi ya tata na ye (1979-2017), président Eduardo Santos.

XS
SM
MD
LG