Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Police ebomaki 55 balandi ya Ne Muanda Nsemi bakufi, elobi HRW


Zacharie Badiengila alias Ne Muanda Nsemi na bokomi na ye na Commissariat ya police na Kinshasa, 24 avril 2020. (Capture d'écran)
Zacharie Badiengila alias Ne Muanda Nsemi na bokomi na ye na Commissariat ya police na Kinshasa, 24 avril 2020. (Capture d'écran)

Balandi ya Zacharie Badiengila oyo ayebani lokola Ne Muanda Nsemi bakufaki pene na tuku mitano na mitano kati na le 13 mpe le 23 avril na misala mya bayi bokengi mpe police, elobi Human Rights Watch na rapport na yango.

"Opération moko ya police esalamaki le 22 avril ememaki liwa ya bato 15 na Songololo (Kongo central) ntango lingomba liye likitaki o’balabala, mpe mosusu mosalamaki le 24 avril na ndako ya Ne Muanda Nsemi" (mokambi ya BDK / BDM -Bundu dia Kongo / Bundu dia Mayala) le 24 avril na Kinshasa ememaki liwa lya bato 33, eyebisi HRW.

ONG internationale eye elobi ete ezwaki motango mwango na kosolola na nzela na singa na bato basusu bazwaki mpasi, bazeneneke mpe bayi lopitalo.

HRW eyebisi ete police ebetaki masasi ya solo.

"Police esalelaki mbala mingi bibundeli ya makasi koBDK/BDMBundu dia Kongo / Bundu dia Mayala bakitaki o’balala wuto le 13 kino le 24 avril na Kinshasa mpe etuka ya Kongo central," ekomi HRW.

Na ngambo naye, mbulamatari epesaki motango mwa bato mwambe baye bakufaki mpe tuku mibale na misato na misala police esalaki.

Bakonzi ya police balobi basalelaki bibundeli bibomaka te.

Nsima na bokangami bwa ye, Ne Muanda Nsemi atiyamaki na CNPP (Centre neuro pyscho pathologique) epayi wapi minganga basakolaki ete azali na maladie ya moto,

XS
SM
MD
LG