Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

FECOCA ekati championnat, Mazembe, V.Club, Maniema Union na DCMP nde bakobeta compétions africaines


TP. Mazembe yambo na match ya quart de finales ya Ligue africaine des chmpaions na Casablanca, Maroc, 28 f♪0vrier 2020.
TP. Mazembe yambo na match ya quart de finales ya Ligue africaine des chmpaions na Casablanca, Maroc, 28 f♪0vrier 2020.

FECOFA (Fédération congolaise ya football association) ezwi mokano ete TP Mazembe, AS, V.Club, AS. Maniema Union na DCMP nde bakobeta compétions afriaines lokola chmapionnat national esuki na kati mpo na COVID19.

FECOFA ekati championnat mpo na COVID-19. Elobi na esika momekano ya ligue 1 ezali, TP Mazembe nde elongi championnat.

Comité exécutif ya FECOFA ekutani mpo na yango an Kinshasa na bosenga ya LINAFFOT (Ligue nationale ya football) mpe ba clubs.

Comité eye esakoli ete TP Mazembe, lokola ezali na 53 points (20 matches) esika championnat etelemaki, ezali molongi mpe ekolakisa elongi ya RDC na Ligue des champions ya CAF.

AS. V.Club nde ezali na esika ya mibale ma 42 points na 21 matches, ekokende elonge na TP Mazembe na Ligues des champions.

Lokola Coupe du Congo esalami te, Maniema Union ya Kindu mpe AS DCMP baye bazali ba molongo ya misato mpe ya minei nde balakisi elongi ya RDC na Coupe de la Confédération africaine.

XS
SM
MD
LG