Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Parquet TGI Gombe esengi autopsie mpo ya nzoto ya zuzi Yanyi


Zuzi Raphael Yanyi na bosamabisami ya Vital Kamerhe na boloko ya Makala (CPRK), Kinshasa, 11 mai 2020.
Zuzi Raphael Yanyi na bosamabisami ya Vital Kamerhe na boloko ya Makala (CPRK), Kinshasa, 11 mai 2020.

Parquet ya Tribunal ya grande instance ya Gombe esengi autopsie ya nzoto ya zuzi Raphael Yanyi Ovungu, mosambisi ya Vital Kamerhe na basusu mpo na mikolo nkama, oyo akufi na butu boleki.

Zuzi Yanyi akufaki butu boleki (mercredi pene na ngonga ya yambo), nsima na koyoka nzoto malamu te na mbalakaka. Amemaki na lopitalo ya Nganda, na Kinshasa, epayi wapi minganga basakolakiete asilaki kokufa.

"Tosengi na M. médécin légiste ya Hôpital général ya référence ya Kinshasa, na Kinshasa ete aselela makoki ma ye," ekomi parquet na mokanda motiami manzaka na Officer ya ministère public, Emile Ndjale Wemambolo.

"Topesi ye mosala ya : kotala malamu nzoto ya nkondo Raphael Yanyi Ovungu, eye ebombami ntango eye na morgue ya lopitalo monene ya ba soda na Camp Kokolo mpe koyebisa biso nini ememi ye na liwa," eyebisi parquet na mokanda mwango.

Parquet esengi mpe ete "monganga mokonzi ya lopitalo monene ya Camp Kokolo, oyo akobakisa sango esengeli, asala nyonso mpo ete nzoto (ya mowei) elongolama te to esimbama te na baye bazali na makoki te to na boyebi te kino misala myango mikosala", elobi mokanda mwango.

Misala myango misengami kosalama na lombango.

XS
SM
MD
LG