Haut-Commissaire ya makoki ma bomoto ya ONU, Michelle Bachelet, asengi bomisami na lombango ya bato ba boloko na molongo mobimba mpo na kopekisa bopanzani bwa coronavirus ya sika mpe kufa ya bato ebele mpo boloko mingi etondisamaka koleka ndelo makasi.
Président Félix #Tshisekedi asakoli état d’urgence na ekolo Congo démocratique mpo likambo ya coronavirus ya sika oyo esili kozwa bato koleka 45 mpe koboma bato basatu. Kasi moto moko abikisami. Mibembo minso mipekisami kati na Kinshasa na bituka.
Mokoni moko abikisami na COVID-19 na Kinshasa, esakoli bakonzi ba bokolongono ne ekolo Congo démocratique.
Bato babale baye batalami mikolo mibale mileki na Lubumbahsi lokola bazwami na COVID-19, bazali na bokono bwango te, esakoli ministre ya bolokolongono Dr. Eteni Longondo.
Me Jean Joseph Mukendi, bâtonnier ya kala mpe Conseiller juridique ya nkondo Etienne Tshisekedi awei, esakoli bayi UDPS, lingomba ya politiki ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi.
Cour ya cassation ekateli ministre ya kala ya bokolongono, Dr. Oly Ilunga, mibu mitano ya misala ya makasi mpo na kopengwisa misolo mizalaki mpo na Ebola.
Bakonzi ya bokolongono ya ekolo Congo dèmocratique basakoli ete moto ya mibale afuki na coronavirus COVID19 na enumba mokonzi Kinshasa.
Mosali moko ya VOA (The Voice of America) azwami na coronavirus ya sika na Washington D.C, elobi bakonzi ya media international oyo.
+Aurlus Mabele awei na COVID19 na Paris +Bato banei basusu bamonisami na coronavirus ya sika na Kinshasa, bakoni bakomi 18 +USA ekati bopesi visa na mokili mombomba +Mibeko ya mbulamatari mpo na transports
"Banda lelo (vendredi 20 mars 2020), bus Transco ekoki komema koleka bato 20 te, (bus) ‘Esprit de Vie’ bato 16, mini-bus bato 10, taxis bato misato, tricycle bato mibale mpe tukutuku moto moko," elobi liyebisi ya mbulamatari ya RDC.
Alanga nzembo ya Congo-Brazzaville Aurlus Mabélé, oyo nkombo na ye ya solo ezalaka Aurélien Miatsonama, awei na coronavirus jeudi na Paris, France, eyebisi bayi libota na ye.
Etats-Unis etelemisi bopesi visa ya bokoti na mabele ma yango na mokili mobimba likolo ya bokono bwa coronavirus ya sika (COVID-19), eyebisi département d’Etat ya Amerika.
Donald Trump apesi nzela mpo na bosaleli ya chloroquine lokola lisalisi ya bato bazali kobela bokono bwa coronavirus ya sika awa na Etats-Unis. Kasi bakambi ya bokolongono bandimi mpeza nanu te bosaleli ya mono moye mobikisaka na malaria (paludisme).
Ambassadeur ya Etats-Unis na ekolo Congo-Brazzaville amikotisi ndako mpo na bokono bwa coronavirus ya sika. Todd Philip Haskell alobi azalaki pene na mosali ya ambassade moko azwami na COVID19.
Président Félix Tshisekedi asakoli mikano ya kafukafu mpo na kopekisa bopanzani ya bokono bwa coronavirus oyo esili kozwa bato 14 na Kinshasa, engumba mokozi ya ekolo Congo démocratique.
Bato sambo misusu bazwami na bokono bwa coronavirus na Kinshasa, engumba mokonzi ya RDC; yango ememi na zomi na minei motango ya baye bazwi yango, kolonda bakonzi ba bokolongono.
Bakambi babale ya lingomba ya basimba minduki CODECO bakangami na mapinga ya ekolo Congo, na Djugu, epayi wapi babundi baye bazali kokoba koboma bato, eyebisi molebeli ya ba FARDC na Ituri, Lieutenant Jules Ngongo.
CAF (Confédération africaine ya football) esakoli ete epusi nsima CHAN (Championnat ya Afrique des Nations) esengelaki ebetama wuto le 4 kino le 25 avril na Cameroun. Ndenge moko mpe mpo na ba matches ya b'éliminatoires ya CAN-2021.
Germain Katanga, moko na bakambi ya mangomba ya basimba minduki ya Ituri, abimi boloko na Kinshasa.
Bomekami ya vaccin candidat ya coronavirus 2019 bobandi na Seattle (na Etat ya Washington), elobi bakonzi ya bokolongono ya Etats-Unis.
Voir plus