Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump alingi babanda kopesa bato chloroquine mpo na COVID19


Président Donald Trump na Maison Blanche, Washington D.C., 19 mars 2020
Président Donald Trump na Maison Blanche, Washington D.C., 19 mars 2020

Donald Trump apesi nzela mpo na bosaleli ya chloroquine lokola lisalisi ya bato bazali kobela bokono bwa coronavirus ya sika awa na Etats-Unis. Kasi bakambi ya bokolongono bandimi mpeza nanu te bosaleli ya  mono moye mobikisaka na malaria (paludisme).

Chloroquine "emonisi mwa bilembo bizali kopesa elikya… Tokosala ete mono yango mozala mpo bato basalela yango," esakoli M. Trump liboso ya bapanzi sango na Maison Blanche.

Président ya Etats-Unis abakisi ete bopesami ya nkisi eye esili kondimama na misala mitalaka mino na Etats-Unis (FDA) na lombango.

"Tokosala ete bato bayeba kosamba yango soki bazali na ordonnance (soki dokotolo atindi yo osomba nkisi)," elobi M. Trump.

Kasi, FDA eyebisi na ngambo na yango ete endimi mpenza nanu te lisakoli ya président Trump, mpe elobi chloroquine esi endimama mpo na paludisme na arthrite.

"Président asengi biso kotala malamu mono mwango. Tokobanda na komeka na bato mingi lokola mposa ezali na ntina ya koyekola yango malamu mpe kozwa biyano ma mituna minso mizali kotunama," elobi mokambi ya FDA Stephen Hahn.

M. Hahn alobi ete "soki FDA emibongisami mpo na kolongala epekiselo inso na ntina ya komema na lombango maye manso masika, ezali mpe na mokumba ya kosala ete mino ya malamu mpe makasi mipesamela batu".

Na Belgique mpe minganga bayike mpe bandimaki kosalela yango.

XS
SM
MD
LG