Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis etelemisi bopesi visa likolo ya COVID-19


Donald Trump pazali koyanola na mituna ya panzi sango na Washington, 19 mars 2020.
Donald Trump pazali koyanola na mituna ya panzi sango na Washington, 19 mars 2020.

Etats-Unis etelemisi bopesi visa ya bokoti na mabele ma yango na mokili mobimba likolo ya bokono bwa coronavirus ya sika (COVID-19), eyebisi département d’Etat ya Amerika.

"Ba rendez-vous nyonso mpo na visas ordinaires ya koya kotala to ya koya kovanda ekatami," banda mokolo ya mitano, elakisi Twitter département d’Etat.

Na ndelo eye ekomonana malamu, ba ambassades mpe ba consulats ekokoba kopesa ba visa uyo esengeli na lombango, elobi mokanda mwango.

Département d’Etat elaki kozongela misala misusu ntango manso makobongama kasi mokolo moyebani te.

Etats-Unis esi ekangaki ndelo na yango na mboka ya poto (Europe) epayi wapi bokono boye bozali kongala.

Ekonga mpe ndelo na yango lelo (vendredi) na Canada mpe ezali kotala ndenge nini kokanga mpe ndelo na Mexique to kokitisa motango ya bato bakokota.

XS
SM
MD
LG