Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

B’échantillons ya Lubumbashi ezali COVID-19 te


Dr. Eteni Longondo, ministre ya bokolongono na Kinshasa, 10 mars 2020. (VOA/Lingala)
Dr. Eteni Longondo, ministre ya bokolongono na Kinshasa, 10 mars 2020. (VOA/Lingala)

Bato babale baye batalami mikolo mibale mileki na Lubumbahsi lokola bazwami na COVID-19, bazali na bokono bwango te, esakoli ministre ya bolokolongono Dr. Eteni Longondo.

"INRB esakoli ete emoni te virus wana na ba examen esalaki," ekomi ministre ya bokolongono na Twitter

Bakambi ya etuka ya Katanga mpe ya engumba Lubumbashi bavandisi bato na ndako wuto mokolo mwa yambo ya mposo nsima koloba ete test rapide emonisaka virus yango na basali mibembo mibale bawutaki Kinshasa na mpepo.

Kasi ministre Dr. Longondo asengaki kozela resultats ya INRB.

XS
SM
MD
LG