Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto wa yambo amonani na COVID-19 na VOA


Buiding ya VOA, Washington DC.
Buiding ya VOA, Washington DC.

Mosali moko ya VOA (The Voice of America) azwami na coronavirus ya sika na Washington D.C, elobi bakonzi ya media international oyo.

"Tozwi sango ete mosali moko ya VOA azwami na COVID-19, ye nde moto wa yambo ayebani," ekomaki directrice ya VOA,, Amanda Bennett na mokanda atindeli basali.

Kolanda sango na ye, bato batano basalaki test mpo bazalaki na mwa bilembo kasi kaka moko nde azwami na yango siko.

Oyo azwami na bokono bwango amonanki mbala ya suka na mosala le 11 mars 2020.

Ayokaki nzonto malamu te, azongaki ndako mpo na koluka lisalisi mpe kotalisa nzoto, ebakisi service ya relations publiques ya VOA.

Kolanda Mme, mokoni mwango azali kozwa lisalisi.

Wuto mposo moko na ndambo, VOA etindaki basali na yango banso kosala wuto ndako na bango.

Kaka muke nde bazali na ba bureaux.

Mme Bennette asalaki vidèo mpo ko yebisa balandi to batali banso ete VOA ekokoba komemela bango sango lokola momesano ata basali bakobanda kotinda yango uto ndako na bango.

Na Washington D.C., engumba mokonzi ya Etats-Unis, bato 102 bazwami bokono bwango, bato basatu bawei. Na Etat ya Viriginia, koleka bato 69 nde bamonani na yango, bato 3 bafuki, moko abikisami. Na Maryland, Etat mousu ezinga D.C, koleka 54 nde bazali na yango, misato bawei mpe minei babikisami.

Bato 38.757 nde bazwi na yango na Etats-Unis mobimba, 400 bakufi mpe 178 babikisami.

Koleka bato 100 nde bakufi wuto mokolo ya mposo.

New York nde eleki. Ezali na bakoni 22.217 mpe bawei 114.

XS
SM
MD
LG