Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis ebandi komeka vaccin ya coronavirus


Président Donald Trump na NIH (National Institutes of Health) na masolo ya bato ba zebi mpo bokelami ya vaccin ya COVID-19, Bethesda, Maryland, Etats-Unis, 3 mars 2020.
Président Donald Trump na NIH (National Institutes of Health) na masolo ya bato ba zebi mpo bokelami ya vaccin ya COVID-19, Bethesda, Maryland, Etats-Unis, 3 mars 2020.

Bomekami ya vaccin candidat ya coronavirus 2019 bobandi na Seattle (na Etat ya Washington), elobi bakonzi ya bokolongono ya Etats-Unis.

"Ba volontaires 50 ya mikolo, bazali kati na mibu 18 mpe 55, bakondimama na bomekami bwango mpo na mposo motoba," elobi na liyeibi NIH (Institut national ya bokolongo ya USA).

"Moto ya yambo apesamaki mangwele ya komeka lelo," eyebi NIH.

Mangwele yango ebengami mRNA-1273 mpe esalami na ba scientifiques ya NIH elongo na basungi na yango ya compagnie biotechnologie Modema oyo ezali na Cambridge, na Massachusetts.

Nzokande, mwa koswana ezalaki kati na Etats-Unis na Allemagne mpo etali mangwele ya coronavirus.

Mbulamatari ya Angela Merkel efundaki dimanche Etats-Unis koluka kozwa mpo yango moko projet ya vaccin ezali kosalama na laboratoire allemand moko, nakolukaka kosumba yango na mosolo.

"Allemagne ezali ya koteka te," ekomaki na Twitter Mme Merkel.

Kasi laboratoire allemand CureVac eyebisi ete bazalaki soki moke te na moasolo ya likambo ya mbongo na Donald Trump mpo na kotika mangwele mango kozala ya Etats-Unis.

XS
SM
MD
LG