Mokambi ya mambi matali bikolo bya bapaya ya Etats-Unis, Secrétaire d’Etat Mike Pompeo apameli Chine mpo na kokosela mboka na ye makambo mpo na ndenge coronavirus COVID-19 ebandaki. COVID-19 epanzi mokili mobimba mpe ebomi bato mingi.
Thomas Lubanga abimi boloko na Kinshasa nsima na mibu 14 CPI (Cour pénale internationale) ekatelaki ye mpo kozwa bana bake na lingomba na ye ya basimba minduki na bitumba ya Ituri na 1999-2000.
Moto ya yambo azwami na bokono bwa coronavirus azwami na Brazzaville, eyebisi bakonzi ya Congo-Brazzaville. Mpe ya misato, na ngambo ya RDC, kolonda bakambi ya misala mya bokolongono.
Bakonzi ba bokolongono na Rwanda basokoli komona moto ya yambo na bokono bwa coronavirus.
Président Donald Trump asakoli ete asali test ya coronavirus (COVID-19) mpe eyano na yango ekoyebana na mikolo mikoya.
Président Donald Trump asakoli bopekisami ya baye bakowuta na Europa kokota na mabele ya Etats-Unis. Mokano mwa motali bayi espace Schengen kasi motali te Irlande na Royaume Uni. Union européenne epaleli mokano mwango.
Bayi lingomba LUCHA mwambe bakatelami mikolo zomi na mitano ya boloko nsima na kosambisama mpo na kofinga bakonzi na Kalehe, na Sud-Kivu, na monyele ya ekolo Congo démocratique.
Totala ndenge ministre ya bokolongono Dr. Eteni Longondo azali kosakola moto ya yambo kozwama na bokono bwa coronavirus na Kinshasa.
Sango na bokuse na bililingi na minute moko
Peter Pham oyo azalaki kino sik’oyo motindami ya Etats-Unis mpo na etuka ya Grands lacs atiami motindami mpo na Sahel, kolanda département d’Etat ya Etats-Unis.
Bakonzi ya bokolongono ya Etats-Unis basengi na bato basi bakoli na mibu kosala ba stocks ya bileyi mpe ya nkisi (mino) mpe komibongisa na ntina ya kovanda na ndaku mpo na coronavirus.
Ba concerts, meetings (mitingi) to mpe bosangani ya bato ebele epekisami na Kigali mpo na kobatela ekolo na bobanzani ya bokono bwa coronavirus, elobi bakonzi ya engumba eye. Moto moko te nanu azwami na coronavirus na Rwanda.
Mbulamatari ya ekolo Congo démocratique na bokambami ya président Félix Tshisekedi elobalaki liwa ya général-major Kahimbi na bokutani bwa yango ya mokolo ya mitano.
TP Mazembe ya RDC elongi CS Raja Casablanca ya Maroc 1-0 na match retour ya ¼ de finales ya Ligue africaine des Champions na Lubumbashi. Kasi elongwe na compétition.
Sango na bokuse na bililingi na minute moko. Totala. +Bokono bwa coronavirus bokoni na Cameroun mpe na Togo +Grenade moko epanzani mpe ezokisi bato na Beni +Attentat mibale ebomi policier moko mpe ezokisi basusu pene na Ambassade ya USA na Tunis +OMS esengi 20 millions $ mpo na Ebola na RDC
Policier moko akufii mpe mitanu misusu bazoki na attentat mibale na ambassade ya Etst-Unis na Tunis.
Attentat mibale esalami pene na ambassade ya Etats-Unis na Tunis. Policier moko akufii mpe mitano misusu bazoki . Totala.
Bokono bwa coronavirus bomonisami na Cameroun mpe na Togo, elobi bakonzi ya bikolo biye.
Bakonzi ya Congo-Brazzaville basakoli ete bakotiya na quarantaine bayi mobembo banso bakowuta na France, Italie, Chine, Corée du Sud na Iran, esika wapi bokono bwa coronavirus bozali kongala.
Mokoni ya suka ya Ebola, Masika Mawasu Semida, abimi na Centre ya traitement ya Ebola (CTE) na Beni, na Nord-Kivu. Ezalaki esengo mingi kasi etikali kozela mikolo 42 mpo ete bakonzi basakola ete Ebola esili soki moto mosusu azwami te. Totala.
Voir plus