Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Coromavirus emonani na bato 14 na Kinshasa


Mosali ya bokolongono azali komeka moto na elenge moko na Lopitalo ya Zewditu, Addis Abeba, Ethiopie/
Mosali ya bokolongono azali komeka moto na elenge moko na Lopitalo ya Zewditu, Addis Abeba, Ethiopie/

Bato sambo misusu bazwami na bokono bwa coronavirus na Kinshasa, engumba mokonzi ya RDC; yango ememi na zomi na minei motango ya baye bazwi yango, kolonda bakonzi ba bokolongono.

"INRB (Institut national des recherches bio-médicales) ewuti koyebisa nga ete bato sambo basusu bawuti kozwama na COVD19 na mpokwa eye, ekomi ministre ya bokolongono," Dr. Eteni Longondo.

"Bazali bango banso ba Congolais kasi mitano bavandaki to balekaki na France. Mibale bavandaka na Kinshasa, bazalaki nzinga nzinga na moto koto azali positif awutaki France," ebakisi Dr. Longondo.

Mwa ntango na ntongo, Dr. Longondo asakoli ete bato misatu misusu bamonaki.

Kasi minei misusu bazwamaki yambo na yango.

Yango ememi na motango ya 14 baye banso bazwami kino sika na COVID19. Kati na bango badokotolo babale. Moko awutaki France mosusu azwaki yango na Kinshasa, azalaki kopesa lisalisi na mokoni ya COVID19 mosusu.

XS
SM
MD
LG