Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi apekisi matanga minene, cultes, matches mpe biteyelo mpo na coronavirus


Président Félix Tshisekedi azali kosala malako mpo na coronavirus, Kinshasa, 18 mars 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi azali kosala malako mpo na coronavirus, Kinshasa, 18 mars 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi asakoli mikano ya kafukafu mpo na kopekisa bopanzani ya bokono bwa coronavirus oyo esili kozwa bato 14 na Kinshasa, engumba mokozi ya ekolo Congo démocratique.

Na mikano asakoli na lisikulu asali na télévision nationale, mokonzi ya mboka RDC apekisi mobembo ya mpepo nyonso ekowuta mboka oyo ezali na likama mingi ya COVID19. Ndenge moko mpe mpo na masuwa.

Kaka ba avions cargos to masuwa cargos ya frets nde ekozwa nzela ya kokota mboka. Ba équipages na yango ekoleka contrôle.

Bapaya banso ya mboka eza na COVID mingi bakokota te, kasi ya mboka esusu esengeli bakoma information na bango nyonso na fiche mpo balendela malamu nsima na bokomi na bango.

Bato banso bakosala mobembo na kati ya mboka bakoleka mpe na contrôle ya lolenge moko na baye bakota kowuta mboka bapaya.

"Nazwi mokona ya kopekisa… bosalami ya matanga manso na ba salles mpe na ndako. Nzoto nyonso ya bawei (bibembe) ekolekisama mbala moko wuto morgue (ndako ya malili) kino na bisika bokundama mpe bato basengeli kozala moko na kokende na lilita," elobi président Tshisekedi.

Biteyolo binso bikokangama kobanda jeudi 19 mars mpo na mposo minei.

Lisanga ya losambo (cultes) mpe epekisami mpo na mposo minei. Ndenge moko mpe mpo na masanga masano (sports).

Ba bars, discothèques, cafés, terrasses mpe restaurants manso mpe epekisa kino mikano misusu mikopesama.

Mbulamatari ekozwa mokumba ya bakoni banso ya COVID19.

XS
SM
MD
LG