Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CAF epusi CHAN na b’éliminatoires ya CAN mpo na coronavirus


ba maillots ya bikolo bikopeta CAN 2021, 17 février 2020. (Facebook/CAF)
ba maillots ya bikolo bikopeta CAN 2021, 17 février 2020. (Facebook/CAF)

CAF (Confédération africaine ya football) esakoli ete epusi nsima CHAN (Championnat ya Afrique des Nations) esengelaki ebetama wuto le 4 kino le 25 avril na Cameroun. Ndenge moko mpe mpo na ba matches ya b'éliminatoires ya CAN-2021.

Mokano moye "mozwami nsima na kotala likambo lya mbalakaka ewuti na coronavirus," elobi ministre ya Sports ya Cameroun Narcisse Mbuelle Kombi, na liyebisi.

Mokano mwango mozwami na boyakani na CAF.

"Mikoli mya sika mya mokekano moye mikopesama na kolanda ndenge makambo makokende mpe makoyebisama na ntango na yango," ebakisi ministre ya Cameroun ya Sports.

Bato zomi bamonisami na coronavirus na Cameroun uto moko moye. Mpe bokono bwango bapanzi mokili mobimba.

CAF mpe epusi ba matches ya éliminatoires ya CAN 202, kolanda liyebisi ya mokambi na yango.

XS
SM
MD
LG