Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bakambi babale ya milice CODECO bakangami na mapinga na Djugu


Mathieu Ngudjolo (C) ya mokambi ya CODECO na Bunia, Ituri, 18 mai 2003.
Mathieu Ngudjolo (C) ya mokambi ya CODECO na Bunia, Ituri, 18 mai 2003.

Bakambi babale ya lingomba ya basimba minduki CODECO bakangami na mapinga ya ekolo Congo, na Djugu, epayi wapi babundi baye bazali kokoba koboma bato, eyebisi molebeli ya ba FARDC na Ituri, Lieutenant Jules Ngongo.

Mpo na FARDC, Raymond Tseni Adrionzi, moko na ba baye bakangami, azali likonzi ya CODECO, lingomba liye likambami na Matthieu Ngudjolo, moko na bakonzi ya mangomba basalaka bitumba wuto kala na Ituri.

M. Tseni, "ye nde azalaki kobongisama misala minso mpo na lingomba liye," elobi Lieut. Ngongo.

Ya mibale, nde ayebani na nkombo ya Kester. "Ye nde azalaki kokotisa bato ya sika na lingomba liye," eyebisi lieut. Ngongo.

FARDC ekangi bango na ba ordinateurs mpe ba téléphones (tshombo).

Mokambi mosusu ya lingomba liye azwamaki mikolo mibale mileki.

XS
SM
MD
LG