Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mokoni wa yambo abiki na COVID-19


Bato bazali kosokola maboko liboso ya minganga mpe bayi bokengi na Gatumba, ndelo kati na RDC na Burundi, 18 mars 2020.
Bato bazali kosokola maboko liboso ya minganga mpe bayi bokengi na Gatumba, ndelo kati na RDC na Burundi, 18 mars 2020.

Mokoni moko abikisami na COVID-19 na Kinshasa, esakoli bakonzi ba bokolongono ne ekolo Congo démocratique.

"Ezali moto oyo azwaki bokono bwa yango mposo mileki mpe nsima na bozwami na mokumba ndenge esengelaki," azali lisusu te na bilembo ya COVID-19, ekomi ministre ya Bokolongono Dr, Eteni Longondo na Twitter.

"INRB ewuti kosakola ete virus ezali lisusu te epayi ya moto moye," ebakisi Dr. Longondo.

Moto yango atiyamaki na lopitalo mpe azwaki lisalisa.

Awutaki na France.

Akomaki mwa malamu mikolo mileki kasi esengelaki kozela ete virus emonana lisusu te na nzoto na ye yambo bakonzi bandima ete abikisami.

XS
SM
MD
LG