Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ambassadeur ya USA na Brazzaville amikotisi ndako mpo na COVID19


Ambassadeur ya Etats-Unis na Brazzaville, Todd Philip Haskell azali kosala na ndako mpo na COVID-19, Congo-Brazzaville, 19 mars 2020. (Twtitter/Ambassade Etats-Unis na Brazzaville)
Ambassadeur ya Etats-Unis na Brazzaville, Todd Philip Haskell azali kosala na ndako mpo na COVID-19, Congo-Brazzaville, 19 mars 2020. (Twtitter/Ambassade Etats-Unis na Brazzaville)

Ambassadeur ya Etats-Unis na ekolo Congo-Brazzaville amikotisi ndako mpo na bokono bwa coronavirus ya sika. Todd Philip Haskell alobi azalaki pene na mosali ya ambassade moko azwami na COVID19.

"Nazali koyebisa bino ete nazali kosala na ndako mpo na kolandela quarantaine (bobombami) ya mikolo zomi na minei," ekomi ambassadeur M. Haskell na compte Twitter ya Ambassade ya Etats-Unis na Brazzaville.

"Lobi, moko na bayi ambassade ya USA azwamaki na COVID19. Nazalaki mpenza pene pene na ye, nakotikala na ndako kino suka ya bombani," ebakisi M. Huskel.

Nzokande bato koleka basato bamonani ya bokono boye na Brazzaville.

Mbulamatari ezwi mikano miike lokola bopekisi mpepo inso ekowuta mboka ezali na COVID19 mingi, bokangemi ya kelasi, ba bars, restaurants, biyamba mpe masano.

Président Denis Sassou atie na esika "Task Force" to limpinga ya misala mpo na kotala mbano ya COVID19 na nkita mpe na bovandi na bato.

XS
SM
MD
LG